Liens d'accessibilité

Dernières nouvelles
RDC

Tshisekedi akutani na Poutine na Sotchi


Président Félix Tshisekedi na bokutani na mokokani wa ye ya Russie Vladimir Poutine na Sotchi, Russie, 23 octobre 2019. (Twitter/Stanis Bujakere Tshiamala)
Président Félix Tshisekedi na bokutani na mokokani wa ye ya Russie Vladimir Poutine na Sotchi, Russie, 23 octobre 2019. (Twitter/Stanis Bujakere Tshiamala)

Président Félix Tshisekedi ya ekolo Congo démocratique akutani na mokokani wa ye ya Russie, Vladimir Poutine na masolo ya pembeni ya sommet Russie-Afrique.

Bakonzi babale baye basololi elongo na basungi na bango mpe baye mbulumatari mibale.

Denis Sassou N’Guesso ya Congo-Brazzaville azali mpe na Sotchi.

Na bofungolami ya bokutani bwango, Vladimir Poutine, mokonzi ya Russie asakoli ete ekolo na ye ekoluka kokolisa mbala mibale ba échanges économiques na Afrika na mibu mitano mikoya.

João Lourenço ya Angola, Paul Kagame ya Rwanda, mpe bakonzi basusu ya continent bazali mpe kuna. Motango na bango mozali tuku minei na misato.

RDC, Djibouti na Kenya nde bazali na ba stands na bokutani bwango.

"Technologies nucléaires o’mosala ya ntombwa ya Afrika" mpe "Minerais ya Afrika mpo na bana ya Afrika", ezali kati na ba mama ya likambo ya masolo myango ya mikolo mibale.

XS
SM
MD
LG