Liens d'accessibilité

Dernières nouvelles

Mokambi ya ba "Maï Maï Jackson" afundama na koboma ba éco-gardes 19 akangami


Ba rangers na ya Virunga, Nord-Kivu, RDC, 11 mai 2018. (VOA/Charly Kasereka)
Ba rangers na ya Virunga, Nord-Kivu, RDC, 11 mai 2018. (VOA/Charly Kasereka)

Mokambi ya ba “Maï Maï Jakcson” oyo afundama na koboma babateli zomi na libwa ya Parc ya Virunga akangami.

Emmanuel De Merode, mokambi ya Parc ya Virunga na Nord-Kivu, ayebisi ete Jackson Muhukambuto, mokambi ya basimba minduki, akangamaki mikolo mibale mileki na ntongo na Butembo, na Nord-kivu.

Balandi ba Jackson Muhukambuto bafundami mpe na koboma bacivili ebele lokola mpe bayi mampinga ma Ekolo Congo démocratique.

Ba “Maï Maï Jackson” nde basalaka misala mya bango na pene na ndambo ya Parc national ya Virunga mosika te na Lac Edouard. na ndelo na Ouganga.

Kolanda baromètre sécuritaire ya Kivu, Jackson Muhukambuto azalaki kala commandant na mampinga ma Ekolo Congo démocratique, awutaki na mangomba ya batombi mpe apesaka maboko na Ba FDLR.

XS
SM
MD
LG