Liens d'accessibilité

Dernières nouvelles

Ba civiles 6 na ba rangers 12 bakufi na bitumba na parc ya Virunga


Ba ranges na parc national ya Virunga pene na Bunagana, ma Nord-Kivu, 21 octobre 2012.
Ba ranges na parc national ya Virunga pene na Bunagana, ma Nord-Kivu, 21 octobre 2012.

Koleka bato 18 babomami na maboko ya basimba minduki na parc ya Virunga, na Nord-Kivu. Kati na bawei, ba rangers (bakengeli ya parc) 12 baye bayaki kosunga ba civils na bitumba byango.

Ba rangers zomi na mibale na ba chauffeurs na bango babale mpe na ba civils misusu minei bakufi na bitumba byango. Lingmba lyoko te (ya basimba minduki) nanu endimi ete yango nde esalaki bitumba byango," elobi molobeli ya parc ya Virunga na AFP.

Bayi bokengi bapesi motango ya bakengeli ya parc 13 mpe ba civils mitano nde bawei.

Bato baiike basusu bazoki mpe bazo na mpasi ya liwa, ebakisi na liyebisi molebeli ya parc.

XS
SM
MD
LG