Liens d'accessibilité

Dernières nouvelles

Martin Fayulu amemi makambo na Cour africaine des droits l’homme


Martin Fayulu, mokambi ya lisanga Lamuka na Kinshasa, 12 janvier 2019.
Martin Fayulu, mokambi ya lisanga Lamuka na Kinshasa, 12 janvier 2019.

Candidat ya lingomba Lamuka mpo na présidentielle, Martin Fayulu amemi makambo ya ba résultats oyo ye aboyi na Cour africaine des droits.

Fidèle Babala, kalaka mokonzi ya MLC (Mouvement pour la libération du Congo) mpe molebeli ya Lamuka alobi bakeyi na Cour liye mpo na niveau national ba nzela nyonso ya recours esili.

"Na jurisprudence na bango, basi bacondamna ba pays misusu mpo na tricherie mpe ba cas ya vol. Nazali na elikya ete bakolanda juriprudence na bango mpo basala ete bapesa recommandation to mpe résolution na niveau ya mboka na biso mpo ba respecter bosolo ya maponami," eyanoli M. Babala na motuna ya VOA Lingala.

Kalaka mokonzi ya MLC alobi ete ezali nsomi ete kalaka mokonzi ya ONU, Antonio Guterres, alanda makambo ya Cour constitutionnelle elobaki.

M. Guterres ayebisaki ete "oyo esalami na RDC esili esalami mpe evandi". M. Guterres asengi na bato nyonso "bapesa maboko na gouvernement" ya Félix Tshisekedi.

"Ezali nsoni koyoka oyo ONU ezali koloba. Peuple congolais azali souverain. Aponi ndenge mosusu sikoyo bino bolobi tosala ndenge mosusu. Ezalaka boye te. Biso tokokoba kino na suka mpo na senga bosolo ya maponami," ebeti mokoloto M. Babala.

Cour constitutionnelle endimaki ete Félix Tshisekedi alobaki maponami na 38,57%. Kasi Martin Fayulu aboyi mpe amisakoli mokonzi.

XS
SM
MD
LG