Liens d'accessibilité

Dernières nouvelles

Mobulu na Mbuji-Mayi mpe Kinshasa nsima na elonga monene ya FCC na ba Sénatoriales


Police ezali kotambola pene na siège ya UDPS ((Union pour la démocratie et le progrès social) na Limete, Kinshasa, le 23 décembre 2018.
Police ezali kotambola pene na siège ya UDPS ((Union pour la démocratie et le progrès social) na Limete, Kinshasa, le 23 décembre 2018.

Policier moko akufi na mobulu na Mbuji-Mayi, na Kasaï-oriental, ntango bato ya UDPS, parti ya président Félix Tshisekedi, batomboki mpo na koboya elonga ya baye ya FCC (Front commun pour le Congo) na maponami ya ba Sénateurs.

Na Kinshasa mpe bapneus matumbami na banzela mpe liboso ya siège ya UDPS (Union pour la démocratie et le progrès social) na Limete.

Baye ya Police nationale balobi ete moko kati na bango akufi na Mbuji-Mayi.

Baye UDPS bafundi ba députés provinciaux kozuwa kaniaka.

"Emonani polele ete kaniaka ezalaki mpe na lobi ete Procureur général ya Cour ya Cassation alobaki ya solo. Ezali mpasi mpo ata ba députés ya parti na biso na balandi te nzela lisanga epasaki bango. Bazali batomboki," epamali moko ya ba députés provinciaux ya UDPS, Peter Kazadi, oyo alongolaki candidature na ye mpo koboya kaniaka.

Procureur général ya Cour ya cassation, Flory Kabange, asengaki na CENI kotelemisa maponami maye. Kasi CENI eboyaki mpe elobaki kotelemisa maponami ekotambola likolo ya Mobeko likonzi mpe linaka ebongisamaki.

Na mponami maye, FCC ezuwi mabonga 84 likolo ya 100 Sénateurs bakovanda na suku ya likolo ya parlement.

Lingomba Lamuka liye lizali na masanga lokola MLC, G7, MS1 mpe misusu, lizuwi mabonga 12.

Nzonkande CACH (Cap pour le changement) oyo ezali na UDPS, UNC mpe mangomba misusu ezuwi kaka mabonga 3.

XS
SM
MD
LG