Liens d'accessibilité

Dernières nouvelles

Matata kati na ba policiers na balandi ya Martin Fayulu


Ba policiers bakangi moto moko na Goma, RDC, 27 décembre 2018.
Ba policiers bakangi moto moko na Goma, RDC, 27 décembre 2018.

Mwa matata ezali liboso ya mapongo ya MLC (Mouvement pour la libération du Congo) mpe Ecide (Engagement pour la Citoyenneté et le Développement), mangomba maye masimbi Martin Fayulu.

Bobendani ezali kati na baye ya bokengi mpe balandi ya Fayulu. Bapoliciers bapamzaki balandi ya Martin Fayulu liboso. Kasi balandi baye baonzgi.

Kolanda banzeneneke (témoins), bato minei bakengemi mpe ba policiers bolongoli podium esika wapi Martin Fayulu esengelaki amata mpo na kopesa maloba na

ye.

Bapanzi sango mpe batindikami na ba policiers na ntango makambo maye.

Nzoka nde, Martin Fayulu aboyi mokano ya Cour constitutionnelle oyo esokoli mpo ya libela Felix Tshsiekedi lokola moponami ya présidentielle ya le 30 décembre moleki, na 38,57% kolonda bilembo CENI epesakai.

XS
SM
MD
LG