Liens d'accessibilité

Dernières nouvelles
RDC

Milulu ya politiki mipekisami yambo ya bokomi ya Kambubi na Kolwezi


Moïse Katumbi apepi loboko na bokomi na ye na Lubumbashi, Haut-Katanga, 20 mai 2019.
Moïse Katumbi apepi loboko na bokomi na ye na Lubumbashi, Haut-Katanga, 20 mai 2019.

Mokambi ya engumba ya Kolwezi na etuka ya Lualaba apekisi milulu minso ya politiki, mikolo misato yambo ya bokomi ya Moïse Katumbi.

"Mpo na ntina ya bokengi mpe mpo na kimya, milulu to bokutani moko te ya politiki misalami na lisanga to lingomba ya politiki songolo to pakala, mikoki kosalama te na etando mobimba ya engumba kolwezi kino miko misusu mikopesama, " ekomi na liyebisi Véronique Utipe, mondele-mboka ya Kolwezi.

Mme Utipe ayanoli, na mokanda mosusu, na bosengi ya lingomba Lamuka liye likambami na Moïse Katumbi, ete azali na mawa ya kopesa nzela te na milulu ya koyamba opposant oyo.

Lamuka ekomelaki Mme mpo na kosenga ye abatela milulu myango.

Mme Utipe ayanoli ete Lamuka "eyebani te kati ya masanga to mangomba ya politiki na Kolwezi mpe ndako na yango eyebani te ". Alobi mpe lisusu ete manzaka matiyamaki na mokanda ya kosenga nzela mpe moto akomaki yango bandimama te na bakonzi ya engumba.

Nzokande M. Katumbi esengeli akoma na Kolwezi nsima koleka na Kalemie, na Tangamyika, o’mokolo ya misato.

XS
SM
MD
LG