Liens d'accessibilité

Dernières nouvelles
RDC

Bokoti ya ba Léopards na CAN 2019 samedi na ba Cranes ya Ouganda


Yannick Bolasie ya ba Léopards asopi Vianney Mabide ya Centrafrique (na nse) na match na stade des Martyrs, Kinshasa, 4 septembre 2016.
Yannick Bolasie ya ba Léopards asopi Vianney Mabide ya Centrafrique (na nse) na match na stade des Martyrs, Kinshasa, 4 septembre 2016.

Ba Léopards ya Congo démocratique bakokutana lobi na ba cranes ya Ouganda na bokoti na bango na Coupe d’Afrique des Nations ya lisano ya ndembo eye ezali kobanda lelo na Caire na Egypte.

Sélectionneur ya ba Léopards Florent Ibenge alobaki mikolo mibale mileki ete andimi ete équipe na ye ekoki kende kino na suka.

Mpe capitaine Yousoouf Mulumbu ayebisika ete ba Léopards ya lelo bakoli mpe bakomi na expérince mpo kokende na finale mpe kalonga.

Nzoka nde Moïse Katumbi, oyo azali moko ya baye ya CAF, asololi na bakambi ya limpinga ya ba Léopards kasi basani ya ndembo te mpo bakendi kopema.

XS
SM
MD
LG