Liens d'accessibilité

Dernières nouvelles
RDC

Katumbi akosilisa mobemba kati na bituka na Kinshasa le 20 juin


Moïse Katumbi atomboli lobojo na bozongi na ye na Lubumbashi, Haut-Katanga, le 20 mai 2019.
Moïse Katumbi atomboli lobojo na bozongi na ye na Lubumbashi, Haut-Katanga, le 20 mai 2019.

Moïse Katumbi, mokambi ya lingomba Lamuka mpo na sanza misato, asakoli ete akosukisa mobembo na ye kati na bituka ye Ekolo Congo démocratique na Kinshasa o’mokolo ya le 20 juin 2019.

Kolanda lisakoli ya Olivier Kamitatu, mokambi ya misala na ye, mwana mboka Katumbi akobanda mobembo na ye ya mikolo zomi na Goma, le 10 juin.

Mpe akokende na Bukavu, le 12 juin, na nsima akoleka na Beni mpe Butembo, Bunia, Kisangani, Kindu mpe Mbandaka mpo na kosukisa na Kinshasa.

Moise Katumbi azongaki na Ekolo Congo démocratique na nzela ya Lubumbashi le 20 mai, nsima ya mibu misato ya bokimi mboka mpo atelemelaki mokonzi ya kala Joseph Kabila.

Kasi afutandamaki na makambo ebele liboso ya bazuzi mpe makambo yango matika.

XS
SM
MD
LG