Liens d'accessibilité

Dernières nouvelles

Mbulamatari elaki kozongisa nzoto ya nkondo “Général Defao” na Kinshasa


Alanga nzembo Lulendo Matumona to “Général Defao” , na Twitter, 14 mars 2018. (Twitter Général Défao Géné Géné)
Alanga nzembo Lulendo Matumona to “Général Defao” , na Twitter, 14 mars 2018. (Twitter Général Défao Géné Géné)

Mbulamatari ya RDC (ekolo Congo démocratique) esakoli ete ezali kosala oyo esengeli mpo na kozongisa nzoto ya alanga nzembo Lulendo Matumona to “Général Defao” na Kinshasa mikolo mikoya.

Na liyebisi na yango, ministère ya Culture, Arts mpe Patrimoine epesi sango ete « Général Defoa » afukafi solo ‘omkolo mwa yambo le 27 décembre 2021 na Douala, na Cameroun, epayi akendaki kobeta mindule.

“Mbulamatri ya ekolo etelemi pembeni ya libota ya makila mpe liboto monene ya balanga nzembo mpo na bozongisami ya nzoto ya mowei mpe bosali matanga, elakisi liyebisi.

“Général Defao” azalaki na mibu ntuku sambo na mibale.

“Général Defao” abotama o mokolo mwa le 31 décembre 1958 na Kinshasa. Azalaki bongo mokomi banzembo, moyembi mpe mobini monene.

Aleka na mangomba to ba orchestre lokola Grand Zaiko Wawa ya Pepe Felly Manuaku, Choc Stars mpe asalaki lingomba na ye moko na kombo ya Big Stars na mobu 1991.

XS
SM
MD
LG