Liens d'accessibilité

Dernières nouvelles

Police epekisi mindule ya Werrason na Zenith ya Paris le 25 septembre


Alanga nzembo Werrason
Alanga nzembo Werrason

Mokambi ya police ya Paris, na France, apekisi concert to mindule alanga nzembo Werrason to Noël Ngiama Makanda esengelaki abeta na lingomba lya ye Wenge Musica Maison Mère le 25 septembre 2021 na 20h00 na Zénith Paris.

Préfet ya police ya Paris akomeli bakonzi banso ya Paris mpe alobi "ezali na likama ete eyoma esalama kati na bayi opposition mpe bayi na ngambo ya bokonzi na RDC".

"Mindule myango mitiami na eleko ya bobendani makasi na politiki kati na balandi ba ye na batelemeli ya bokonzi na Ekolo Congo démocratique (RDC) ; alanga nzembo Werrason atalamaka bo’ moko na baye bazali na ngambo ya président ya kala Joseph Kabila mpe mokitani wa ye ya sika président Félix Tshisekedi, (mindule myango) mizali kaka kotinda bato mingi na ngambo ya opposition ya makasi ya Congo kati na diaspora na France mpe bikolo nzinga nzinga na poto, baye bakotisaki mikanda mpo na milulu mya botelemeli le 25 septembre ekoya nzinanzinga na Zenith, na kolukaka kobundisa baye bakoya kotala mindule mpe kosala mobulu kati mpe libanda lya ndako ya masano…," ekebisi mokambi ya police Dider Lallement na mokanda na ye.

Mokambi ya police ya Paris akundoli mobulu makasi mobimaki le 28 février 2020 na mindule ya Fally Ipupa mpe mituka 44 mizikisamaki, lokola mpe ba tukutuku 132 mpe biloko misusu kati na Paris.

Bato 60 bakangamaki mpe mobulu mwango kati na Paris molakisamaki mokili mobimba.

Concert ya Werrason esengalaki ebeta le 17 septembre kasi ambassade ya France na Kinshasa epesaki nanu te ba visas. Yango, epusanaki le 25 septembre 2021.

XS
SM
MD
LG