Liens d'accessibilité

Dernières nouvelles

Koffi Olomide akosamba mpo na kobeta mpe kozwa na makasi babini baye na Nantes


Alanga nzembo Koffi Olomide, kati na babini wa ye na concert na stade Mar Diop, Dakar, Sén♪0gal, 30 avril 2005.
Alanga nzembo Koffi Olomide, kati na babini wa ye na concert na stade Mar Diop, Dakar, Sén♪0gal, 30 avril 2005.

Koffi Olomide esengeli asamba lisusu lundi ya Nantes na France mpo na makambo matali mobulu ya kobeta to kolukaka kosangisi nzoto na makasi na babini ba ye ya basi banei kobanda mibu 2002 kino 2006.

Koffi Olomide, na nkombo ya mbotama Antoine Agbepa Mumba, Afundamaki mpe na kokangela babini na ndako mpe kopekisa bango kobima na libanda. Mpo na Koffi, bifundeli biye nyonso bizali ya lokuta.

Ntango asambaki liboso, kaka likolo likambo lyango, na 2019, akatelemaaki etumbu ya boloko ya mibu mibale na sursis, mpo na mobulu ya kuluka kosangisa nzoto na makasi na mobini na ye moko oyo azalaki naino mwana moke to mineure ntango makambo manso masalamaki.

Prokirɛrɛ asengakaki batia Koffi Olomide na boloko mpo na mibu sambo, asengaki bobndelami ya bosambisami mpo na likambo litali mobini oyo.

Alanga Nzembo alongaki na bifundeli bitali babini misato basusu.

Koffi Olomidé, oya azali na mibu tuku sambo na mitano, amimonisaki te na bosambisi na ye ya liboso. Akendeki mpe te na bokutani ya mibale na ba zuzi. Yango etindaki bango bakamata mandat d'arrêt mpo na kokanga ye.

Avocat na ye, Me Me Emmanuel Marsigny, aboyaki koyebisa na AFP soki mbala eye kiliya na ye akozala na lisambisi to akozala te.

Ndako ya miziki ya La Défense Arena, mpembeni ya Paris, na France, alobaki jeudi ete elongoli concert oyo Koffi Olomide alingaki asala le 27 novembre.

Bato babale baye bazwami lokola ba complices ya Koffi, bazali mpe kosabwisama lisusu lelo.

XS
SM
MD
LG