Liens d'accessibilité

Dernières nouvelles

Koffi Olomide atikami na bosambisami ya kozwa babini ba ye na makasi na France


Moyembi Koffi Olomide na Festival ya musique urbaine ya Anoumabo na Abidjan, Côte d'Ivoire, 21 septembre 2021. (Photo by Sia KAMBOU / AFP)
Moyembi Koffi Olomide na Festival ya musique urbaine ya Anoumabo na Abidjan, Côte d'Ivoire, 21 septembre 2021. (Photo by Sia KAMBOU / AFP)

Koffi Olomide atikami na bosambisami na ye na kozwa babini baye ba na makasi, na France.

Cour d’appel ya Versailles ekateli nde alanga nzembo mokambi ya Quartier latin, Antoine Agbepa Mumba oyo amibengaka "Koffi Olomide" sanza zomi na mwambe ya boloko na sursis probatoire ya mibu misato mpo akangaki babini baye ba ndako kasi akosala boloko te.

Cour d'appel elobi bosolo bomonani te na bofundi ya babini ba Koffi Olimde na maye matali kozwama na makasi.

Bazuzi balobi bafundi balobaki makombo mingi makokana te ntango bazalaki kozongela.

Kasi bazuzi bandimi kopesa etumbu ya sanza zomi na mwambe na Koffi Olomide, mokeli ya mindule "Tchatcho" mpo emonani solo ete akangaki babini baye na ndako.

Nzokande etumbu yango bakisi na mibu misato mipesamelaki Koffi mikosala ete akota boloko te.

Ezalaki bosambisami ya kozongela nsima na etumbu eye Koffi Olimide azwaki yambo.

Nzokande bato baike basalaki milulu liboso lya Cour d'appel ya Versailles mpo na kosenga etumbu ya Koffi Olomide.

XS
SM
MD
LG