Liens d'accessibilité

Dernières nouvelles

Likita lya kotala bolongwi bwa Mabunda na Assemblée nationale lisalami


Bakeli mibeko na ndako ya Assemblée nationale. Kinshasa, 12 novembre 2012.
Bakeli mibeko na ndako ya Assemblée nationale. Kinshasa, 12 novembre 2012.

Nsima na bitumba mpe mobulu mobimaki na Assemblée nationale na ntango, bakeli mibeko basanganaki na salle ya spectacle ya Palais du peuple mpo na kobanda kotala mokanda ya baye bazali kosenga bolongwi ya Bureau.

Ndako ya Congrès ekangamaki nsima na bitumba bya ntongo.

Kolanda baike kati na bango, motango na bango mokamaki 279, koleka 2/3 mobeko na bango esengi.

Bureau ya batabwisi kolanda mibu etiamaki na esika.

Ekambamai na mokolo ya koleka, Mboso Nkodia Mpwanga ya mibu 78, na lisungi ya bilenge babale koleka, ya mwasi, Aminata Namasiya, mibu 27 mpe ya mobali, Gaêl Busa, mibu 27 lokola.

M. Nkodia asengi ete bakeli mibeko ban dima kopesa baye motambwisi ya Assemble nationale Jeanine Mabunda na bato basusu ba Bureau libaku ya koyanola.

Likita likosangana lisusu o’mokolo mwa minei mpo na koyoka bato bafundami.

XS
SM
MD
LG