Liens d'accessibilité

Dernières nouvelles

Matata Ponyo ayanoli na bazuzi mpe akoyanola lisusu mardi mpo na Bukanga Lonzo


Sénateur Augustin Matata Ponyo, ministre wa Yambo ya kala na Bruxelles, Belgique, le 24 juin 2014.
Sénateur Augustin Matata Ponyo, ministre wa Yambo ya kala na Bruxelles, Belgique, le 24 juin 2014.

Sénateur Augustin Matata Ponyo, Ministre wa Yambo ya kala ya RDC, ayonali na Cour constitutionnelle mpo na likambo lya parc agro-industriel ya Bukangalonzo na Kinshasa. Mpe asengami kozonga lisusu mardi.

Bayi Nzinga zninga na ye balobi ete ministre wa Yambo ya kala ya Ekolo Congo démocratique ayanolaki kaka na bobengisami kasi ezali mituna te.

Mposo moleki Matata Ponyo asakolaki na Twitter akoki te koyanola na bobengisami ya misala ya bosembo mibuku buku likonzi.

Ezalaki nsima na bayi bokengi kobuka ndako na ye mpo na koluka komema ye na makasi.

Sénat eboyaki kolongola bobataeli bwa M. Matata mpo asamba na likambo lya Bukanda Lonzo. Kasi Bureau ya Senat elongolaki yango mpo na likambo lya Zaïrianisation kasi atikamaki na yango mpe bazuzi babandi kobengisa ye na mpo na Bukanga Lonzo oyo misolo pene na millions ya ba dollars mibimisama kasi mbuma emonana te.

XS
SM
MD
LG