Liens d'accessibilité

Dernières nouvelles

Matata Ponyo apameli ndenge aboyisami kokende kosaliisama libanda nsima na kozwa poison


Ministre wa Yambo ya kala ya RDC, Augustin Matata Ponyo Mapon na likita lyoko na Dakar, Sénégal, 21 octobre 2015.
Ministre wa Yambo ya kala ya RDC, Augustin Matata Ponyo Mapon na likita lyoko na Dakar, Sénégal, 21 octobre 2015.

Sénateur Matata Ponyo apameli lolenge apekisami kobima mboka mpo na koluka lisalisi nsima na kokutama na poison na nzoto na ye na sanza ya juillet.

Akomi na liyebisi abimisi ete akomelaki ata mokonzi ya mboka mpo yango, lokola mpe bayi parque ya Cour constitutionnelle.

"Ata malabo ya mokambi ya misala mya mboka epayi ya tata mokonzi ya Ekolo, mpe m malako maonganga asalisaka nga ya kokende kotalisa nzoto libanda lya mboka, na pekisami kaka kobima na Procureur general ya Cour constitutionnelle," ekomi M. Matata na liyebisi atiaki manzaka le 12 août 2021.

Minstre wa Yambo ya kala alobi ete aboyaki kotambola likolo na Buku Likonzi na koyanolaka te mituna ya parquet ya Cour constitutionnelle mpo Bukanga Lonzo ntango Sénat esi eboyaki yango.

XS
SM
MD
LG