Liens d'accessibilité

Dernières nouvelles

Tshisekedi asololi na Guterres mpo na matata ya barrage ya Renaissance


Président Félix Tshisekedi ayambi kalaka mokonzi ya ONU Antonio Guterres na Kinshasa, 24 septembre 2019. (Facebook/Présidence RDC)
Président Félix Tshisekedi ayambi kalaka mokonzi ya ONU Antonio Guterres na Kinshasa, 24 septembre 2019. (Facebook/Présidence RDC)

Présidence Félix Tshisekedi asololi na kalaka mokonzi ya ONU Antonio Guterres mpo etali matata likolo na barrage Renaissance na ebale Nil, moko molandi suka na masolo na  Kinshasa kati na Egypte, Ethiopie na Sudan, maye mabisi eloko ya malonga te.

Sango yango epesami na présidence ya RDC.

Balakisi bilongi bya bikolo misatu balobaki na liyebisi ete esengeli ONU mpe bayi molongo basunga mpo na koluka eyano, na liyebisi nsima bakutanaki ya Kinshasa na bokambami bwa M. Tshisekedi.

Bapesaki losako na M. Tshisekedi, motambwisi ya Union africaine, na kokamba likita lya Kinshasa.

Ethiopie etongi barrage yango (GRED) na ntina ya kopesa lotiliki na bavandi na yango million nkama moko na tuku sambo mpe mboka esusu.

Kkasi Egypte ekebisi ete yango ekopekisa kozwa mayi mpe elobaki ezali likambo lya bomoi.

Ebale Nil ezali esika Egypte, mboka esobe, ezwaka mayi mpo na bilanga mpe ya komela.

Sudan elobi ete botongi ya barrage Renaissance bokopekisa ba barrages na yango kozwa mayi masengeli.

XS
SM
MD
LG