Liens d'accessibilité

Dernières nouvelles

Mangomba ya ba Gumino, Twigwaneho na Androids basangani na MFRD na Minembwe


Bakimi bitumba na Minembwe, na Sud-Kivu, février 2002.
Bakimi bitumba na Minembwe, na Sud-Kivu, février 2002.

Mangomba ya basimba minduki ya ba Gumino, Twigwaneho na Androids basangani kati na lingomba mosusu ya bikutumba ya sika na nkombo MFRD na Minembwe, na Fizi, na Sud-Kivu, elobi ba FARDC.

Molebeli ya Mampinga ma Ekolo Congo démocratique (FARDC), général Léon-Richard Kasonga ayebisi ete MFRD (Mouvement fédéral pour la démocratique) eye ekambami na officier ya kala akima mampinga Michel Makanika.

Kolanda maloba ma gén. Kasonga, MFRD ezali kobundisa mampinga mpe bavandi, lokola mpe koboma basoda baye ekani.

Na mikolo mitano babundi balingomba liye lya sika babomaki basoda batano mpe babombaki nzoto ya moko na bawei mpe bayibaki minduki mpe masasi na bisaleli ya kopesa sango badosa baye bazalaki na yango, elobi FARDC.

Bitumba makasi bingalaki suka ya mposo moleki ntango ba FARDC ya 12e brigade bazongisa ntango bayi MFRD babundisaki bango na Minembwe na ngambo ya aérogare mpe na sud wuto mboka ya Molima.

O'mwa yambo, ba FRADC balobaki babeta mpe kobenga bayi MFDR.

Bana bakelasi bakoki te kosala examens d’Etat.

Colonel ya kala Michel Makanika apesamaka maboka na batomboki ya Burundi ya red Tabara mpe FNL (Front national ya libération).

XS
SM
MD
LG