Liens d'accessibilité

Dernières nouvelles

Liwa lya Rossy Mukendi: Commissaire Sup. Adj, Lokeso atindami na Cour militaire


Basambeli liboso lya bazuzi na boloko monene ya Makala, Kinshasa, 18 décembre 2012.
Basambeli liboso lya bazuzi na boloko monene ya Makala, Kinshasa, 18 décembre 2012.

Commissiaire supérieure adjointe Carine Lokeso atindami na Cour militaire ya Kinshasa Matete nsima na Tribunal militaire ya garnison koloba ezali na makoki ya kosambisa ye te na bosambisami ya kozongela mpo na liwa lya Rossy Mukeni, moko na babundi mpo na bomwana mboka, akufaki na masasi ya police.

Commissaire supérieur adjointe Carine Lokeso asambisamaki mpo na liwa lyango mpe mpo na kozanga kotosa mikano.

Commissaire supérieur adjointe (Major) Carine Lokeso azalaki na bosambisami bwa yambo mpe na ebandeli ya bosambisami ya bozengili bo’moto akopesa sango.

Kasi akangamaki mikolo mileki na mbamba ya bayi makoki ma bomoto mpe ya basambeli ba Rossy Mukendi.

Rossy Mukendi akufaki na masasi ya ba pulusu na milulu mpo na kosenga maponami le 25 février 2018 na milulu na paroisse St Albert na Kinshasa.

XS
SM
MD
LG