Liens d'accessibilité

Dernières nouvelles

Laurent Gbagbo aza na mobembo na Kinshasa


Laurent Gbagbo, mokonzi ya kala ya Côte d'Ivoire, na bokutani na nkumu ya mboka na mama, Côte d'Ivoire, 28 juin 2021.
Laurent Gbagbo, mokonzi ya kala ya Côte d'Ivoire, na bokutani na nkumu ya mboka na mama, Côte d'Ivoire, 28 juin 2021.

Mokonzi ya kala ya Côte d’Ivoire, Laurent Gbagbo akomi vendredi na Kinshasa na mobembo wa ye ya yambo nsima na bozongi na ye na mboka na ye, kolanda botikami na ye na CPI.

Bayi nzinga nzinga na Laurent Gbagbo nde bapesi sango yango na AFP.

"Président Gbabgo akomi lelo na Kinshasa na libanda lya mpepo ya N’Djili. Asololi na Jean-Pierre Bemba oyo abengisi ye mpo mobembo ya bondeko," elobi na AFP moko na basungi ya Bemba.

Mikolo mileki, M. Gbagbo asakolaki ete asalaki bondeko na Jean-Pierre Bemba, vice-président ya kala ya RDC mpe mokonzi ya MLC (Mouvement pour la libération du Congo).

Bango babale baleki kisa pene na mibu zomi na boloko ya CPI (Cour pénale internationale).

M. Gbagbo azongaki na Abidjan, engumba mokonzi ya Côte d’Ivoire, nsima na bobimisami na ye.

XS
SM
MD
LG