Liens d'accessibilité

Dernières nouvelles

Ggagbo akabawani na mwasi wa ye Simone


Président Laurent Gbagbo (D) na molongani wa ye Simobe Gbagbo na Abidjan, Côte d'Ivoire, 2011.
Président Laurent Gbagbo (D) na molongani wa ye Simobe Gbagbo na Abidjan, Côte d'Ivoire, 2011.

Laurent Gbagbo, président ya Côte d’Ivoire, akbwani na mwasi wa ye Simone Gbagbo, elobi avocat na ye.

Lisakolami lya bokabwani boye lisalami mikolo minei nsima na M. Gbagbo kozonga na mboka na ye kolanda na mibu zomi alekisaki na bokangami na CPI na LaHaye, na Pays-Bas na bofundami mpo na mbeba ya bitumba mpe ya bomoto na matata malandaki maponami ma mokonzi ya mboka na Côte d’Ivoire wuto 2010 kino 2011..

Kolanda avocat na ye Me Claude Mentenon, bazuzi bandi bokabwani boye nsima na mibu minei ya Simone Ehivet (oyo azalaki Gbabgo kino sika) koboyaka bokabwani na malembe.

CPI ebimisaki M. Gbagbo mpo na bozangi bilembo na bofundami.

Mme Simone (Gbagbo) mpe akangamaki mpe asamba mpe aketalamaki etumbu ya mibu 20 na Côte d’Ivoir na bofundami mpo na bitumba yango emamaki kufa ya bato pene na 3.000.

Kasi Mme Simone azwaki ngolu ya mokonzi ya mboka.

XS
SM
MD
LG