Liens d'accessibilité

Dernières nouvelles
RDC

Katumbi akomi na Kalemie


Moïse apepi loboko nsima na bokomi na ye na Kalemie, Tanganyika, 24 juillet 2019. (Twitter/Moïse Katumbi)
Moïse apepi loboko nsima na bokomi na ye na Kalemie, Tanganyika, 24 juillet 2019. (Twitter/Moïse Katumbi)

Moïse Katumbi, mokambi ya lingomba Lamuka mpe ya lisanga Ensemble, akomi na Kalemie, engumba mokonzi ya etuka ya Tanganyika nsima na mwa nkwokoso ya kozwa ndigisa ya kokita na engumba eye.

"Nsima na mikolo mwambe na Lubumbashi mpo na kokutana na bato ebele mpe na masolo na bana mboka, ngai oyo na Kalemie," esakoli M. Katumbi na compte Twitter na ye.

Kasi mpepo na ye ezalaki mwa ntango na Lubumbashi yambo na kozwa nzela ya bokiti na libanda ya mpepo ya Kolwezi.

Molebeli wa ye, Olivier Kamitatu akomi na Twitter na ye ete bapesamelaki nzela na 11 :55 ya Lubumbashi.

Bokomi ya M. Katumbi na Kalemie ezali na nzela ya safari (mobembo) eye abongisi kosala na mboka mobimba. Esengeli akoma nsima na Kolwezi.

Nzonkande mokambi ya engumba ya Kolwezi, na etuka ya Lualaba, apekisi milulu minso ya politiki, mikolo misato yambo ya bokomi ya Moïse Katumbi.

XS
SM
MD
LG