Liens d'accessibilité

Dernières nouvelles
RDC

Elombe ya bibotu na molongo Ilunga Makabu alongi Papin ya Russie


Elombe ya bibotu Junior Ilunga Makabu, na photo, 20 décembre 2017. (Facebook/Junior Makabu)
Elombe ya bibotu Junior Ilunga Makabu, na photo, 20 décembre 2017. (Facebook/Junior Makabu)

Junior Ilunga Makabu ya Congo démocratique alongi na bilembo mwana ya Russia Aleksei Papin o’mokolo ya mposo, na Traktor Sport Palace, na Chelyabinsk (Russia).

Babeti bibotu baye babale bazali ya catégorie lourd léger, bobundaki mpo na WBC (World Boxing Council) Silver Junior.

Na suka ya bitumba biye ya makasi, zuzi ya yambo apesi Jr. Ilunga bilembo 113 mpe basusu babale, 115. Nzokande bazuzi banso bapesi Papin 113.

Kolanda Boxing on BT Sport, babeti bibotu babale baye bamipesaki makasi kasi Jr. Ilunga alekaki, na maloba ya bazuzi.

Le 16 juin 2019, Jr. Ilunga Makabu alongaki moye ya Russia mosusu Dmitry Kudryasahov na Afrique du Sud mpe azwaki nkamba ya elombe ya molongo ya boxe (bibotu) ya WBC Silver Junior ya ba lourds légers.

XS
SM
MD
LG