Liens d'accessibilité

Dernières nouvelles

Jonny Clegg, "Zulu" ya mundele akufi


Alanga nzembo Johnny Clegg, Zulu ya mondele. azali kobina na milulu ya makwela na ye na etuka ya Natal, Afrique du Sud, 26 1989.
Alanga nzembo Johnny Clegg, Zulu ya mondele. azali kobina na milulu ya makwela na ye na etuka ya Natal, Afrique du Sud, 26 1989.

Alanga nzembo Johnny Clegg ya Afrique du Sud, ayebanaki na nkombo ya Zulu ya mondele, awei na mibu 66 na cancer, asakoli manager na ye.

"Johnny akufi na kimya lelo, pene na libota wa ye, na Johannesbourg, " elobi Rody Quin na télévision publique SABC.

Kolanda maloba na M. manager na ye, Johnny Clegg abundaki mibu minei na ndambu na bokono ya cancer.

Johnny Clegge, mundele. Azalaki koyemba mpe kobina na monoko ya kizoulou.

Nzembo na ye "Asimbonanga” eyebanaki mingi. Ezalaki na album "Scatterlings of Africa" ya 1982.

Banzembo na ye mingi bizalaki ya revolution.

XS
SM
MD
LG