Liens d'accessibilité

Dernières nouvelles
RDC

Tshisekedi akeyi na Afrique du Sud mpo na botiyami na bokonzi ya Ramaphosa


Président Félix Tshisekedi na molongani na ye bazali kopesa mbote yambo na kozuwa mpepo na Aéroport ya N'Djili, Kinshasa, 24 mai 2019. (Twitter/Présidence RDC)
Président Félix Tshisekedi na molongani na ye bazali kopesa mbote yambo na kozuwa mpepo na Aéroport ya N'Djili, Kinshasa, 24 mai 2019. (Twitter/Présidence RDC)

Président Félix Tshisekedi akeyi na Afrique du Sud mpo milulu ya botiyami na bokonzi ya président Cyril Ramaphosa, eyebisi présidence ya RDC.

Milulu myango mikosalama o’mokolo ya mposo mpe bakambi ebele ya mboka biyike bakozala kuna.

Félix Tshisekedi na mokokani waye ya Afrika ya Ngele nde basolili lisusu mpo na komema na bozindo boyokani ya bikolo na bango babale.

Ezali mobembo wa yambo Tshisekedi asali na Afrika ya Ngele banda akoti na bokonzi.

XS
SM
MD
LG