Liens d'accessibilité

Dernières nouvelles
RDC

Bato 22 bakufi na likama ya motuka na na Manono


Un accident sur la route kolwezi situé à 175 km de Lubumbashi, en RDC, le 18 mars 2018. (VOA/Narval Mabila)
Un accident sur la route kolwezi situé à 175 km de Lubumbashi, en RDC, le 18 mars 2018. (VOA/Narval Mabila)

Bato tuku mibala na mibale bakufi mpe zomi bazoki makasi na likama ya motuka, na Manono, na etuka ya Tanganyika, eyebisi police nationale.

Likama yango lisalami na 7 kms ya Kanoka.

"Kino sik’oyo motango ezali: 22 bakufi + 10 bazoki makasi. Biloko bibebi: liboke ya cassitérite lisopani na lubwaku ya zunguluke," ekomi PNC na compte Twitter na yango.

Motuka moye mobaluki mozali ya copmagnie MMR (Mining Minerals Resources), kolanda police.

Ntina ya likama liye eyebani nanu te.

XS
SM
MD
LG