Liens d'accessibilité

Dernières nouvelles
RDC

Mabota 30.000 basimbami na bomati ya mayi ya Sud-Ubangi


Bayike ya mampinga mpe misala misusu bazali koluka bato na bisika bizindi na bomati ya mayi Ubangi na Sud-Ubangi, 30 octobre 2019. (Facebook/Gouvernorat Sud-Ubangi)
Bayike ya mampinga mpe misala misusu bazali koluka bato na bisika bizindi na bomati ya mayi Ubangi na Sud-Ubangi, 30 octobre 2019. (Facebook/Gouvernorat Sud-Ubangi)

Mabota koleka nkoto tuku misato to 30.000 nde basimbami na mpela mpe bomati ya mayi ya Ubangi na etuka ya Sud-Ubangi, eyebisi Bureau ya bokambi misala ya bosalisi bato ya ONU to OCHA. 

Mathias Gillmann, molobeli ya OCHA nde apesi motango moye.

OCHA ezali kobongisa linaka ya kosunga bato baye.

Misala misusu lokola Caritas, Unicef HCR mizali mpe komeka botala bonene ya likambo lyango.

Mokambi ya etuka ya Sud-Ubangi Claude Mabenze azalaki na Kinshasa mpe ayebisaki ete bosenga bozali ya millions zomi na moko ya ba dollars.

Misala minso, ndako inso mpe bilanga binso bizindi na mayi.

Likama ezali ete bato bazwa bokono ya lolelenge na lolelenge.

XS
SM
MD
LG