Liens d'accessibilité

Dernières nouvelles

Kamerhe abimisami mpo na bokolongono na ye


Vital Kamerhe na Nairobi, Kenya, 23 novembre 2018
Vital Kamerhe na Nairobi, Kenya, 23 novembre 2018

Vital Kamerhe, mokambi ya ndako ya mosala ya kala ya président Félix Tshisekedi apesami bonsomi mpo na mwa ntango.

Ezali mokano ya Cour ya cassation, elobi basembeli mpe bayi misala mya sembo batangami na ba media na Kinshasa.

« Vitala Kamerhe azwi bonsomi ya mwa ntango bopesami na Cour de cassation lelo lundi, kolanda sango RTNC, Radio-télévision nationale congolaise epesi na compte Twitter na yango.

Ezali na kotala bokolongono bwa nzoto na ye bozali malamute, ebakisi RTNC.

kasi basembeli baye baliki kozongela VOA Lingala nsima. Vital Kamerha akatelemaki mibu zomi na misato ya boloko na kofundama na kopengwi misolo mpo mikolo naka ya president Tshisekedi.

M. Kamerhe asengamaki kofuta lomande ya 500.000 $ yambio na kobima.

XS
SM
MD
LG