Liens d'accessibilité

Dernières nouvelles
RDC

PM Ilunga alaki Tshisekedi gouvernement na mikolo misato


Premier ministre Ilunga Ilunkamba (G) na bokutani na président Félix Tshisekedi (D) na Cité ya Union africaine, Kinshasa, 19 août 2019. (Facebook/Présidence RDC)
Premier ministre Ilunga Ilunkamba (G) na bokutani na président Félix Tshisekedi (D) na Cité ya Union africaine, Kinshasa, 19 août 2019. (Facebook/Présidence RDC)

Premier ministre Sylvestre Ilunga Ilunkamba alaki président Félix Tshisekedi mokanda ya suka ya bankombo ya baye bakozala na gouvernement kati na mikolo mibale to misato.

M. Ilunga akutani na M. Tshisekedi lelo na cite ya Union africaine, na Kinshasa.

"PM apesi mokonzi ya mboka mokanda ya yambo ya bankombo ya gouvernement mpe alaki, na suka ya masolo na bango, ete akomemela ye mokanda ya suka ya boyonakani na mikolo mibale to misato," eyebisi ndako ya misala ya président Tshisekedi.

O’mokolo ya mitano moleki moleki, PM Ilunga alobaki na liyebisi ete asengaki na CACH, lingomba ya president Tshisekedi, mpe FCC ya mokonzi ya kala Joseph Kabila, babongisa mikanda ya bankombo miye bapesaki ye.

Abetaki sete ete azongiselaki bango yango kaka mokolo moye awaki yango mpe azalaki kozela bango bapesi mikanda ya sika 'omkolo ya mposo to ya eyenga mileki.

Esengelaki mangomba maye mabale makotisa nkomba ya basi mpe ya bilenge, mpe balanda malako ya PM ya kotiya bato ya sembo, eyebisaki M. Ilunga.

XS
SM
MD
LG