Liens d'accessibilité

Dernières nouvelles
RDC

FCC elobi esali oyo ekoki mpo bilongi ya sika bikota na gouvernement


Bakambi ya FCC (Front commun pour le Congo) na bokutani na bapanzi sango, Kinshasa, 20 août 2019. (Twitter/FCC-Officiel RDC)
Bakambi ya FCC (Front commun pour le Congo) na bokutani na bapanzi sango, Kinshasa, 20 août 2019. (Twitter/FCC-Officiel RDC)

Bakambi ya FCC (Front commun pour le Congo), lingomba ya mokonzi ya kala Joseph Kabila, balobi basali oyo esengeli mpo ete gouvernement etiyama mpe ezala mbongwana ya bilongi.

Balobi yango liboso ya bapanzi sango o’mokolo ya mibale na Kinshasa.

"Bokomona ntango mbulamatari mokobima, ete FCC esaleli genre (epesi esika na bamama). Eteni ya malonga, ya motuya mpe koleka, ya malamu, epesameli bilenge mpe na basi lokola," elobi mokambi ya FCC, Néhémie Mwilanya.

Loko ye, secrétaire permanent (kalaka) ya FCC, Emmanuel Ramazani Shadary ayebisi ete kowumela na "botiyami ya gouvernement esalami te motema mabe". Mpo na ye, esengelaki kolengela yango malamu.

M. Ramazani alobi ete lingomba na ye ezwaki bosenga ya bato 300 ya FCC mpo na kokota na gouvernement. "Esengelaki kopona malamu," ayebisi.

M. Sahdary alobi ete FCC epesaki nkombo misato mpo na moko moko na bibonga 42 mipesameli bango kati ya gouvernement. Mpe, ezwaki ndigisa ya mokonzi ya lingomba, M. Kabila.

Mbulamatri yango ekozala na bibonga 65. CACH, lingomba ya président Félix Tshisekedi nde ezwi 23.

Premier ministre Sylvestre Ilunga Ilunkamba alakaki na président Félix Tshisekedi o'mokolo ya yambo kopesa ye nkasa ya suka ya bankombo ya baye bakozala na gouvernement nsima mikolo mibale to misato.

XS
SM
MD
LG