Liens d'accessibilité

Dernières nouvelles
RDC

Ilunga Ilunkamba atiki mokanda ya bozwi na ye na Cour constitutionnelle


Mokambi ya mbulatari Sylvestre Ilunga Ilunkamba (D) atiki mokanda molakisi bozwi bwa ye bonso, na Cour constitutionnelle, Gombe, Kinshasa, 30 septembre 2019. (Primature RDC)
Mokambi ya mbulatari Sylvestre Ilunga Ilunkamba (D) atiki mokanda molakisi bozwi bwa ye bonso, na Cour constitutionnelle, Gombe, Kinshasa, 30 septembre 2019. (Primature RDC)

Premier ministre ya ekolo Congo démocratique atiki mokanda molakisi bozwi bwa ye bonso, o’mokolo ya yambo, na Cour constitutionnelle na Kinshasa,  eyebisi misala na ye.

"Mokanda mwango motikami epayi ya greffier (kalaka) ya Cour constitutionnelle, François Haundja," elobi molobeli ya PM Ilunga, François Buela.

PM Ilunga asengakaki na baye banso ya mbulamatari, na bokutani ya mokolo ya mitano moleki, ete bayeba na kosakola bozwi na bango bonso o’boso ya misala ya bosembo lokola esengami na mobeko likonzi ya RDC.

Epesameli sanza moko na baye banso bazali na mbulamatari mpo na kosakola bozwi na bango ntango ya bozwi mabonga na bango, kolanda mobeko likonzi.

Baya ya mbulamatari esengeli mpe basala lolenge moko ntango batiki mabonga na bango, elobi mobeko linzi.

Nsima na botiki mokanda na ye, PM Ilunga asololaki na président ya Cour constitutionnelle mpe na procureur général ya Cour eye.

Société civile, mingi mpenza ba mouvements citoyens, bazalaki kosenga mbulatari mpe mokonzi ya ekolo Félix Tshisekedi batosa mobeko likonzi na kasakolaka bozwi na bango.

XS
SM
MD
LG