Liens d'accessibilité

Dernières nouvelles

IGF efundi ministère ya Sports na kotinda million moko $ na moyibi na compte ya Fécofa


Jules Alingete Key, inspecteur général ya Inspection générale des Finances, Kinshasa, 10 juin 2021. (Facebook/Jules Alingete key)
Jules Alingete Key, inspecteur général ya Inspection générale des Finances, Kinshasa, 10 juin 2021. (Facebook/Jules Alingete key)

Inspecteur général ya IGF (Inspection générale ya Finances) Jules Alingete Key apameli ministère ya Sports mpe loisirs na kotia million moko ya dollars na compte ya Fédération congolaise ya football association (Fécofa) na moyibi. Ministère eyanoli ete ezali misolo mipesami na Fécofa na FDFA.

"Inspection générale des Finances esakoli ete emoni na ba comptes ya banque ya Fédération congolaise ya football (Fécofa), misolo mya l’Etat (480.00 euros mpe 350.00 $, lokola million moko ya ba dollars, miye mitiamaki na moyibi na ministère ya Sports mpe loisirs. Mpo bolamu ya mboka te," ekomi M. Alingete na liyebisi na ye.

Ministère ya Sports eyanoli ete ezali misolo mipesami na Fécofa na Fondation pour le deéveloppement du football africaine (FDFA).

Inspecteur gén. Ya IGF asengi lisusu na bakambi ba misala mya l’Etat kotosa misolo mya mizwa na bomipekisami mingi mpe misengelaki kozala kaka mpo na kobongisa bomoyi ya banso.

M. Alingete alobi te soki akomema likambo lyango na bazuzi.

"Ezali sango ya lokuta ya makanisi mabe, na ntina ya kobebisa lokuma ya ministère ya Sports mpe loisirs eye ezali kosala makasi mpo na kotombola masano na mboka na biso," ekomi na eyano na yeConseiller juridique ya ministère, Me Armand Yav Levy.

"Bopesi misolo mya libenga ya l’Etat na Fécofa na ministère eye bosalami na kolanda boyokani na Fondation pour le dٞéveloppement ya football (FDFA). Mpe mikanda mipesama na ministère ya Sports mpe Loisirs na makambo maye matatoli mpo na yango," ebakisi Me Yav.

XS
SM
MD
LG