Liens d'accessibilité

Dernières nouvelles

Eteni Longondo atindami bokolo ya CPRK mpo na misolo mya COVID-19


Dr. Eteni Longondo, ministre ya bokolongono na Kinshasa, 10 mars 2020. (VOA/Lingala)
Dr. Eteni Longondo, ministre ya bokolongono na Kinshasa, 10 mars 2020. (VOA/Lingala)

Dr. Eteni Longondo, ministre ya kala mambi ma Bokolongono alekisi butu bwa ye ya yambo na boloko bonene ya Makala (CPRK) epayi wapi atindamaki vendredi na mpokwa nsima na koyanola na parquet ya Cour ya cassation mpo na misolo mya COVID-19.

"Dr. Eteni akomi na boloko ya CPRK na mandat d’arrêt provisiore. Totie ye na pavillon 8," elobaki moko na basali ya CPRK vendredi na mpokwa.

Baike na mbulamatari bandimi ete Dr. Eteni ayanolaki ngonga molayi na procureur ya Cour ya cassation.

Dr. Eteni azali moko na bayi UDPS, lingomba lya mokonzi ya mboka Félix Tshisekedi.

Inspecteur général ya Finances (IGF) afundaki Dr. Eteni na août 2020, na kolobaka été apengwisaki koleka millions sambo ya ba dollars ezalaki mpo na kobundia COVID-19.

Dr. Eteni awangaka mpe alobaka ete Fonds monétaire international emonaki bopengwisi misolo myango te yango endimaki kopesa 1,5 milliards ya ba dollars na RDC.

IGF efundaka Dr. Eteni na kozanga kolekisa mikanda milakisi ndenge asalelaki misolo.

Dr. Eteni azongisaki 751.900 $ nsima na nungu nungu ebimaki na motango mobimaki mpo na kosukola Palais du peule to ndako ya parlement na microbes ya COVID-19.

Sika, esengeli Dr. Eteni asamba na bazuzi mpo atalisa soki apengwisaki to te misolo afundami na yango.

IGF efundaki mpe bakambi ba INRB (Institut national de recherche bio-médicals) na bopengisi misolo.

XS
SM
MD
LG