Liens d'accessibilité

Dernières nouvelles

Ibenge na Renaissance de Berkane ya Maroc bayokani mpo contrat ya mibu mibale


Jean-IFlorent Ibenge (C) nsima na kotia mazaka na boyokani na bakambi ba Renaissace ya Berkane ya Maroc, na Maroc, 5 juillet 2021. (Twitter/RS Berkane)
Jean-IFlorent Ibenge (C) nsima na kotia mazaka na boyokani na bakambi ba Renaissace ya Berkane ya Maroc, na Maroc, 5 juillet 2021. (Twitter/RS Berkane)

Jean-Florent Ibenge okomi solo entraineur ya Renaissance ya Berkane ya Maroc. Atie manzaka lundi na boyokani ya mibu mibale na club eye.

"Na ntango ya lelo, lundi 5 juillet, na ndako ya club, coach Florent Ibenge, atie manzaka mpo na boyokani ya mibu mibale. Botiami manzaka na coach ya RDC mpe Vita Club bosalami nsima na kondima contrat mpe etinda eye akosala ma ba saisons mibale ekoya. #RBS", esakoli club Renaissance ya Berkane na compte Twitter na yango.

M. Ibenge atikaki ebonga na ye, ya coach ya AS V.Club mposo moleki lokola mokambi ya club eye ya Kinshasa, Bestine Kazadi asakolaki yango.

M. Ibenge azalaki coach ya V.Club mibu libwa.

Na V.Club, M. Ibenge alonga championnats nationaux misato mpe akoma deuxième mbala mibale na Coupe d’Afrique.

Azalaka mpe Coach ya ba léopards mibu mingi.

XS
SM
MD
LG