Liens d'accessibilité

Dernières nouvelles

Ibenge alongwe V.Club, esakoli présidente na yango Bestine Kazadi


Entraîneur Florent Ibenge ya V.Club, awa na match ya ba éliminatoire ya CAN 2017 na stade de Port-Gentil, Gabon, 24 janvier 2017.
Entraîneur Florent Ibenge ya V.Club, awa na match ya ba éliminatoire ya CAN 2017 na stade de Port-Gentil, Gabon, 24 janvier 2017.

Jean-Florent Ibenge azali lisusu mokambi ya staff technique ya As V.Club te. Mokambi ya sika ya club eye, Bestine Kazadi nde asakoli yangi.

"Ba supporters ba bolingo, nasakoli na bino bolongwi ya Coach Jean-Florent Ibenge. Na nkombo ya AS V.Club, totondi ye mpo na mosala asalaki mpe totombeli ye bolamu," ekombi na Twitter Bestine Kazadi oyo azwaki ebonga ya présidente ya V.Club wuta mobu moleki.

Bolongwi bwa M. Ibenge bosalami nsima na FECOFA kopesa etumbu na V.Club na kokata yango bilembo libwa.

"Namoni te ndenge nini bakoki kozongisela biso bilembo libwa te kaka mpo ngai, nazali moto ya yambo na makambo mango mpe nasalaki mbeba (“tricheur”). Mayele ma lisano na ndembo masangeli malonga. Soki FECOFA ekomelaki ngai ete tokokaki te kosalela mosani wana, nalingaki kosala yango te," elobaki M. Ibenge na Twitter ya AS Vita Club.

M. Ibenge akambaki V.Club wuto 2012.

Na V.Club, alonga championnats nationaux misato mpe akoma deuxième mbala mibale na Coupe d’Afrique.

Azalaka mpe Coach ya ba léopards mibu mingi.

XS
SM
MD
LG