Liens d'accessibilité

Dernières nouvelles
RDC

Ba Léopards ya RDC na ba Harambee Stars ya Kenya bakeyi 1-1 na préparation


Ba Léopards ya RDC na Ba Harambee Stars ya Kenya na match ya préparation na Espagne, 15 juin 2019.
Ba Léopards ya RDC na Ba Harambee Stars ya Kenya na match ya préparation na Espagne, 15 juin 2019.

Ba Léopards ya RDC na ba Harambee Stars basali match nul 1-1 na préparation, na Espagne, mpo na CAN 2019 eye ekobetama na Egypte mokolo ya minei mokoya.

Ba Harambee Stars bazalaki bato ba yango ya kotiya mongete na ba minutes bya yambo ya lisano.

Mi-temps elekaki na 1-0.

Ba Léopards (Nkoyi) balamukaki na 2e mi-temps. Mingi mpenza tangu coach Florent Ibenge akotisaki Elia Meschack na esika ya Trésor Mputu, Jonathan Bolingi na eskia ya Yannick Bolasie, Britt Assombalonga na eseki ya Cédric Bakambu, Jacques Maghoma na esika ya Paul-José Mpoku mpe na suka Youssouf Mulumbu esika ya Merveille Bope.

Arthur Masuaku nde azongisaki ba équipes babale na bokokani, na but moko na 89’.

Nsima na kobanda na bolembu, ba Léopards balakisi ete bakoki kosala ya kokamwa na mposo moko.

XS
SM
MD
LG