Liens d'accessibilité

Dernières nouvelles
RDC

TP Mazembe ekokutana na Raja CA na ¼ ya finale


Tableau ya 1/4 ya Ligue africaine des champions ya CAF na Caire, Egypte, 5 février 2020. (Facebook/CAF)
Tableau ya 1/4 ya Ligue africaine des champions ya CAF na Caire, Egypte, 5 février 2020. (Facebook/CAF)

TP Mazembe ya ekolo Congo démocratique ekokutana na Raja CA ya Maroc na ¼ ya finale ya Ligue africaine des champions, kolanda tirage au sort ya CAF na Caire, na Egypte.

Soki Mazembe eleki na aller mpe retour, ekozala na momekano na molongi ya Zamalek SC (Egypte)-Espérance de Tunis (Tunisie).

Mimikano misusu ya ¼ de finale, mikozala Al Ahly SC (Soudan)-Mamelodi Sundowns (RSA), Wydad AC (Maroc)-Etoile Sportive du Sahel (Tunisie).

Yambo, esengeli na Mazembe kolonga Raja oyo ezali na basani babale, Ben Malango Ngita na Fabrice Ngoma Luamba.

Mosani ya kala ya RDC Shbani Nonda azalaki na tirage au sort yango.

XS
SM
MD
LG