Liens d'accessibilité

Dernières nouvelles
RDC

Mazembe enyefoli Zesco 3-1 mpe esilisi yambo na groupe A ya Ligue des champions


Tresor Mputu ya TP Mazembe (G) azo' welela ndembo Fousseny Coulibaly ya Esperance Tunis (C) na stade ya Rades, Tunis, 27 avril 2019.
Tresor Mputu ya TP Mazembe (G) azo' welela ndembo Fousseny Coulibaly ya Esperance Tunis (C) na stade ya Rades, Tunis, 27 avril 2019.

TP. Mazembe ya RDC epolisi Zesco ya Zambie 3-1 mpe esilisi yambo na groupe A ya Ligue des champions ya CAF.

Club ya Lubumbashi esukisi ba matches groupes na 14 points na goal average ya +7.

Zamalek SC ya Egypte elandi yango na 9 points mpe +1 ya goal average.

Ba clubs mibale eye nde ezali qualifiés mpo kokoba compétition ya Ligue des champions.

Primeiro de Agosto ya Angola nde eye na esika ya misato na 4 points, -3. Zescoa ekangi mokila na 3 points, -5.

Na match na Zesco, Jackson Muleka atie mingete mibale (32’, penalty mpe 69’ na tir). Na yango, avandi na esika ya meilleur butteur ya competition na niveau eye.

XS
SM
MD
LG