Liens d'accessibilité

Dernières nouvelles
RDC

Haut-commissaire ya ONU mpo na bomoto aza na Bunia


Haut-Commissaire ya Nations unies mpo na makoki ya bomoto, mwana mboka Chili Michelle Bachelet (2e G) ma bokomi bwa ye na Bunia, na Ituri, 23 janvier 2020. (Twitter/MONUSCO)
Haut-Commissaire ya Nations unies mpo na makoki ya bomoto, mwana mboka Chili Michelle Bachelet (2e G) ma bokomi bwa ye na Bunia, na Ituri, 23 janvier 2020. (Twitter/MONUSCO)

Haut-Commissaire ya Nations unies mpo na makoki ya bomoto, mwana mboka Chili Michelle Bachelet akomi na Bunia, na Ituri, mpo mobembo ya mikolo mitano na ekolo Congo démocratique.

Mme Bachelet alingi amona na miso mbeba esalami na bobomami kati na bayi kabila Lendu na Hema na Ituri.

Bato koleka 700 bakufaki na bitumba biye wuto suka ya mobu 2017.

Michelle Bachelet akokita na Kinshasa vendredi le 24 janvier mpe akozala na masolo na bakonzi ya mboka.

Akukokutana lundi 27 janvier na président Félix Tshiskedi.

XS
SM
MD
LG