Liens d'accessibilité

Dernières nouvelles
RDC

Fils Mukoko na baninga baye bakangami na botamboli


Fils Mukoko moko ya baye ya UDPS mpe mokeli ya lingomba ya bâtisseurs Tshisekedistes, na Kinshasa, 20 août 2019. (Facebook/Fils Mukoko)(
Fils Mukoko moko ya baye ya UDPS mpe mokeli ya lingomba ya bâtisseurs Tshisekedistes, na Kinshasa, 20 août 2019. (Facebook/Fils Mukoko)(

Fils Mukoko, moko ya baye ya UDPS mpe mokeli ya lingomba ya bâtisseurs Tshisekedistes akengemi elongo na baninga baye ntango bazalaki kotambola na Pont Cabu, na Kinshasa.

Mokambi ya police na etuka ya Kinshasa, commissaire divisionnaire adjoint Sylvano Kasongo andimi ete bato baye bakengemi.

"Tokangi baye bazalaki kobanda botambola. Bazali kino sik'oyo misatu . Tozali kosala bolukiluki mpe nsima na ngonga tuku minei na mwambe nde totindi bango na parquet, eyebisi com. Div. Sylvano Kasongo.

Mpo na ye bilenge baye bazalaki kotiya mobulu na nzela, batambolaki na bozangi ndingisi kasi police epanzaki bango.

Fils Mikoko abengaki nba media ebele na nzela ya singa, lokola Actualité.cd, mpe ayebisaki bango ete akangami na baninga baye.

"Tokangami na baninga mitano mpe tozali sika oyo na Inspection provinciale ya Kinshasa," eyebisaki M. Mikoko.

M. Mukoko alobi ete batambolaki mpo kosenga bokambi malamu mpe kotelemela kaniaka.

Moko ya baye ya UDPS, M. Mukoko asalaka makelele mingi. Mbala mosusu atelemelaka boyokani kati na CACH, (UDPS-UNC na ba alliés) lingomba ya président Félix Tshisekedi na FCC, ya mokonzi ya mboka ya kala Joseph Kabila.

XS
SM
MD
LG