Liens d'accessibilité

Dernières nouvelles
RDC

FCC etelemeli maloba ya Félix Tshisekedi na Washington


Joseph Kabila, nkumu ya FCC (Front commun pour le Congo) azali kopesa mbote na baye ya lingomba na ye na Kingakati, Kinshasa, le 24 fevrier 2019. (Twitter/Jean Pierre Kayembe)
Joseph Kabila, nkumu ya FCC (Front commun pour le Congo) azali kopesa mbote na baye ya lingomba na ye na Kingakati, Kinshasa, le 24 fevrier 2019. (Twitter/Jean Pierre Kayembe)

Bayi Front commun pour le Congo (FCC) balobi basepeli te na maloba ya président Félix Tshisekedi na mobembo wa ye mposo moleki na Etats-Unis.

Na liyebisi, baye ya lingomba liye litongama nzinganzinga ya mokonzi ya kala Joseph Kabila bapemeli maloba ya mwana mboka Tshisekedi mpo na kosenga lisungi ya bapaya mpo na koluka kopikola misisa ya dictature to bokonzi ya kimakasi na mboka liye.

Baye ya FCC bayebisi ete misala ya kobundisa kaniaka mpe ya kokamba malamu mabanda wuto AFDL (Alliance des forces démocratiques pour la libération) ezwaki bokonzi na 1998.

Baye libota ya politiki ya mwana mboka Kabila bapameli lolenge bokonzi ya Felix Tshiekedi bozali kokamba na kobuka mobeko likonzi.

XS
SM
MD
LG