Liens d'accessibilité

Dernières nouvelles

Franck Diongo na Firmin Yangambi babimi na boloko


Franck Diongo (C) atomboli maboko nsima na bobimisami na boloko, Kinshasa, le 16 mars 2019.
Franck Diongo (C) atomboli maboko nsima na bobimisami na boloko, Kinshasa, le 16 mars 2019.

Moyi politiki Franck Diongo abimi samedi na boloko nsima na mobu mibale ya bokangemi, kolanda mokano ya ngolo président Félix Tshisekedi azuwaki o’mokolo ya misato moleki.

Bituluku na bato bayambaki ye na bobimi na boloko mpe batambolaki na ye na engumba ya Kinshasa likolo ya mituka.

Kasi mwa mobulu esalamaki liboso ya siège ya UDPS, parti ya Félix Tshisekedi, esika wapi balandi ya lingomba liye bazali kotomboka nsima ya elonga ya FCC na maponami ya ba Sénateurs.

M. Diongo, mokambi ya lingomba MLP (Mouvements lumumbiste progressiste) akangamaki na décembre 2016 na mobulu ya koboya mandat ya misatu ya président Joseph Kabila. Bamokatelaki mibu mitanu na boloko mpo na bozwami na minduki.

Moto na boloko mosusu, Firmin Yangambi, moko ya babundi ya makoki ya bamoto, ya ebimaki o’mokolo ya mitano na mpokwa.

Président Tshisekedi azuwaki mokano ya kobimisa bato 700 na boloko.

XS
SM
MD
LG