Liens d'accessibilité

Dernières nouvelles
RDC

Franck Diongo alobi mokonzi ya coalition FCC-CACH nde Félix Tshisekedi


Franck Diongo, mokambi ya MLP, na bokutani na bapanzi sango, na Kinshasa, le 2 avril 2019. (Facebook/Tatiana Ossango)
Franck Diongo, mokambi ya MLP, na bokutani na bapanzi sango, na Kinshasa, le 2 avril 2019. (Facebook/Tatiana Ossango)

Franck Diongo mokambi ya lingomba MLP (Mouvement lumbiste progressiste) alobi soki FCC na CACH basali coalition (bosangisani), mokonzi na yango nde ezali Félix Tshisekedi.

"Na coalition, majorité ezalaka nde ya président ya république. Donc, Félix Tshisekeid nde azali mokonzi na coalition oyo mpe akotia Premier ministre oyo akotosa ye mpe oyo akoya ko bloquer mokili te," alobi Franck Diongo na bokutani wa ye ya yambo na bapanzi sango, nsima na bobisami na boloko.

Mokambi ya MLP alobi mpe lisusu ete maponami mabimisi nse mokonzi ya mboka moko, Félix Tshisekedi.

M. Diongo akebisi bana ya RD Congo mpo na boluki ya baye ya FCC kobongola Mobeko likonzi mpo na bozongi na bokonzi ya Joseph Kabila, lokola bazali majoritaire.

XS
SM
MD
LG