Liens d'accessibilité

Dernières nouvelles
RDC

Kabila apesi Tshisekedi kombo ya oyo akozala Premier ministre


Joseph Kabila mpe président Félix Tshisekedi na masolo na Cité ya Union africaine, Kinshasa, le 17 février 2019. (Présidence RDC)
Joseph Kabila mpe président Félix Tshisekedi na masolo na Cité ya Union africaine, Kinshasa, le 17 février 2019. (Présidence RDC)

Joseph Kabila, mokonzi ya kala ya ekolo RDC, mpe nkumu ya lingoma FCC (Front commun pour le Congo) apesi kombo ya moto oyo akozala Premier ministre epayi ya président Félix Tshisekedi, eyebisi molobeli ya FCC.

Na ngambo ya nkumu lingomba na biso, Joseph Kabila, manso masi makokisami, elobi na TOP Congo, Dieudonné Mwenze.

FCC na CACH (Cap pour le changement), lingomba ya Tshisekedi, bandimaki mposo moleki ete majorité na parlement ezali epayi ya baye ya Kabila.

Bango nde bakopesa kombo ya Premier ministre.

M. Mwenze alobi été etikali na M. Tshisekedi kobimisa kombo liye mpe kotiya ye na mosala mpo gouvernement esalama.

XS
SM
MD
LG