Liens d'accessibilité

Dernières nouvelles

Ba Sénateurs baike ya FCC basengi Kabila bolongwi ya batambwisi ya lingomba na bango


Joseph Kabila, mokonzi ya FCC (Front commun pour le Congo) mpe mokonzi ya mboka ya kala na bokutani na bakeli mibeko na Kingakati, Kinshasa, 29 octobre 2020.
Joseph Kabila, mokonzi ya FCC (Front commun pour le Congo) mpe mokonzi ya mboka ya kala na bokutani na bakeli mibeko na Kingakati, Kinshasa, 29 octobre 2020.

Ba Sénateurs baike ya FCC bakomeli mokonzi ya kala Joseph Kabila, mokonzi ya lingomba na bango, mpo na kosenga mbongwana ya bakambi ba lisanga ba bango. Mokanda mwango motiami manzaka na ba Sénateurs motoba.

"Tosengi bolongwi ya batambwisi banso ya FCC yambo ya suka ya session parlementaire eye," ekomi ba Sénateurs baye batye manzaka na mokanda mwango.

Na mokanda na bango, ba Sénateurs baye balakisi ete lingomba na bango lizali kokoba kozanga kolonga wuto maponami ma mokonzi ya mboka ma 2018.

Baye batie manzaka na mokanda mwango bafundi makambo mabe ya bakambi lokola kozwa bayi lingomba lokola bangamba, kotia kaka baye ya libota ya bakambi na mabonga mpe makambo masusu.

Kinso sika, FCC ezalaka na bakambi banso te. Mookonzi na yango nde M. Kabila mpe motambwisi na yango nde Néhémie Mwilanya.

Bato basusu esengelaki batiama na mabonga masusu kasi nanu yango ekokisama te.

XS
SM
MD
LG