Liens d'accessibilité

Dernières nouvelles

Tshisekedi atie Bahati Lukwebo bo’ "informateur"


Joseph Kabila, mokambi ya FCC (D), Modeste Bahati Lukwebo ya AFDC-A (na mpoanzi na ye), na bato basusu na bokutani ya lingambo na bango na Kingakati, Kinshasa, 2019. (Facebook/Junior King-Jr)
Joseph Kabila, mokambi ya FCC (D), Modeste Bahati Lukwebo ya AFDC-A (na mpoanzi na ye), na bato basusu na bokutani ya lingambo na bango na Kingakati, Kinshasa, 2019. (Facebook/Junior King-Jr)

Félix Tshisekedi apesi Modest Bahati Lukwebo, motambwisi ya AFDC-A, etinda ya koluka lingomba nini lizali na majorité na parlement. Mokonzi ya mboka apesi M. Bahati ebonga ya "informateur" mpo sanza moko mpe ekoki kokobakisa nse mbala moko.

Mokano ya botiami ya M. Tshisekedi motangamaki vendredi na ngonga ya mibale ya butu na télévision nationale.

"Etinda yango ezali ya mikolo tuku misato mpe ekoki kobandela mbala moko," elobi mokano mwangol.

M. Bahati azali mokambi ya AFDC-A (Alliance des forces démocratiques congolaises et alliées), lingomba lya mibale lizalaki na motango mwa bakeli mibeko mingi koleka na FCC (Front commun pour le Congo) ya mokonzi ya kala Joseph Kabila.

M. afatisaki ngambo ya M. Tshisekedi mpe azalaki moko bat oba yambo ya kokota na Union sacrée mokonzi ya mboka azali kosala.

Na mokano mwa ye, M. Tshisekedi asakoli lisusu bkabwani ya libala ya CAHC (ya ye) na FCC.

XS
SM
MD
LG