Liens d'accessibilité

Dernières nouvelles
RDC

Makangu atikeli Thambwe Mwamba esika na maponami ya Sénat


Ngwende ya Sénat na Palais du peuple, Kinshasa, 7 avril 2019. (Facebook/ Sénat RDC)
Ngwende ya Sénat na Palais du peuple, Kinshasa, 7 avril 2019. (Facebook/ Sénat RDC)

Georges-Erick Makangu, indépendant, alongoli nkombo na boweli ebonga ya mokambi ya Sénat mpe amitieyi nsima ya Alexis Thambwe Mwamba, candidat ya FCC (Front commun pour le Congo), lingomba ya Joseph Kabila.

M. Makangu asakoli mokano ya bolongwi na ye ntango azuwaki maloba mercredi liboso ba sénateurs basusu mpo na campagne électorale eye ebandaki le 23 juillet mpo na mikolo mibale.

Alobi azuwi mokano na ye nsima na kosolola na ba sénateurs bayike.

Bolongolami na ye botiki esika na M. Thambwe Mwamba mpo na kowela na Modeste Bahati Lukwebo ya AFDC-A.

Maponami maye makosalama le 27 juillet na Palais du peuple.

Nkombo bato 18 nde epesamaki mpo na mabongo sambo.

XS
SM
MD
LG