Liens d'accessibilité

Dernières nouvelles

FARDC elobi ebengani lisanga Makanika-Twigwaneho-Ngumino na Hauts Plateaux


Basoda ya mampinga ya RDC pene na hélicoptère ya MONUSCO emati na Bijombo, Sud-Kivu, 10 octobre 2020.
Basoda ya mampinga ya RDC pene na hélicoptère ya MONUSCO emati na Bijombo, Sud-Kivu, 10 octobre 2020.

Mampinga ma Ekolo Congo démocratique balobi ete babengani lisanga ya batomboki Makanika-Twigwaneho-Ngumino na bisika babombamaka na Hauts plateaux, na territoire ya Fizi, na Sud-Kivu nsima na mposo moko ya bitumba.

Mokambi na bango colonel Michel Rukundo alias Makanika na basungi baye bakimi na nzamba. Kasi bavandi ya bisika mpe bakimi.

"Ezali ellonga y aba FARDC likolo na lisanga lya mangomba ma batomboki bakambama na mokimi ya mampinga colonel Michel Rukundo, elobi molebeli ya mampinga na Sud-Kivu," capitaine Dieudonné Kasereka.

"Mampinga mabotoli mboka inso ezalaki na maboko ma batomboki, kati na yango esika babundi baye bazali kobombama," ebakisi capitaine Kasereka.

Ba sanza eleki, mangombo ya batomboki Makanika-Twigwaneho-Ngumino basangaki na bokambami ya colonel Rukundo.

Basoda mpe ba policiers baike ya banyamulenge mpe bakimaki molongo ya mampinga mpe ya police mpo na kosangana na batomboki mpe kobundisa mampinga.

XS
SM
MD
LG