Liens d'accessibilité

Dernières nouvelles
RDC

Bato banei bakufi na mpela na Sud-Kivu


Ndako nzike eziki na moto monene na quartier Nyamugo, na Kadutu, Bukavu, Sud-Kivu, 10 Septembre 2019. (VOA/Ernest Muhero)
Ndako nzike eziki na moto monene na quartier Nyamugo, na Kadutu, Bukavu, Sud-Kivu, 10 Septembre 2019. (VOA/Ernest Muhero)

Bato banei bakufi, basusu zomi bazali komonana te mpe pene na ndako tuku sambo ezui mbeba, esakoli Aimé Kawaya, mokambi ya territoire ya Fizi na AFP, nsima na mpela o'mokolo mwa misato.

Bakufi baye babakisa na ba oyo bazali kolelama mpo na mpela esusu ebomi mikolo miye na ekolo Congo démocratique.

Bato banei baye bakufi na mpela yango ekweyaki o’mokolo ya misato mpe emamaki mayi kobima na ndelo na yango.

Bana babale ya libota moko bazali kati na bawei. Nzoto na bango ekundamaki o’mokolo ya minei.

Yango esalami, nsima na liwa ya bato tuku minei bakufaki na mpela ekasi na Kinshasa na butu ya mokolo ya eyanga na ya yambo.

XS
SM
MD
LG