Liens d'accessibilité

Dernières nouvelles

Bazuzi babwakisi recours ya opposition na ba résultats ya présidentielle na Burundi


Evariste Ndayishimiye na maponami na Gitega, Burundi, 20 mai 2020.
Evariste Ndayishimiye na maponami na Gitega, Burundi, 20 mai 2020.

Cour constitutionnelle ebwakisi recours ya parti politiki ya yambo na opposition eye eboyi bilembo bya maponami ma mokonzi ya mboka ya le 20 mai maye Evariste Ndayishimiye asakolami molongi na yango.

"Bosenga bwa mokambi mwa Conseil national mpo na liberté (CNL), Agathon Rwasa, ya kotelemela bilembo bya maponami ya mokonzi ya mboka, ya ba législatives mpe communales bozali pamba mpe na mbano moko te," esakoli moko na bazuzi ya Cour constitutionnelle.

Cour constitutionnelle endimi mpo na libela elonga ya général Ndayishimiye, candidat ya CNDD-FDD parti politiki oyo ezali na bokonzi, na 68,70%.

M. Rwasa nde alandi général Ndayishimiye na 24,18% mpe candidat ya Union mpo na progrès national (Uprona) Gaston Sindimwo aye na nsima na 1,63%.

Evariste Ndayishimiye, na mibu 52, akotiyama na kiti ya bokonzi na sanza ya mwambe nsima na kolapa ndayi.

Président Pierre Nkurunziza oyo azali na bokonzi oyo akotika bokonzi, apesaki nkombo na ye te mpo alekisi mandats misatu na kiti na ye.

XS
SM
MD
LG